LetsSingIt the internet lyrics database
en
1
picture

"Celio, Ida, Voyage Ya Bandundu" Lyrics

4.6 / 5
Song updated, review now!
Ndenge toyokanaki nga nayo ooh eeh,
ndenge tolakanaki nga nayo ooh eeh,
ata ko nasali mabe ooh,
ata ko nasali mabe ooh,
okoki kobota na mobali mosusu te Ida ooh,
okoki kobota na mobali mosusu te Ida ooh x2

(Lamenting)
Aah Ida toyokanaki nga nayo,
lokola nakei mikili,
sima na ngai lokola yo otikali, nayebi que,
Kinshasa ezali mboka batikaka muasi te,
sala attention, ya solo,
mikolo tokabwanii ezali mingi,
okoki tango mosusu okokanisa ngai,
mpe tango mosusu nalobi bien,
tango mosusu okoki mpe ko trompe ngai Ida,
kasi kolinga te obota na mobali mosusu ti tango nakozonga Ida,

ba response nini yo ooh ozueli ngai boye,
motema nini yo ooh okangeli ngai boye Ida aah, x2

Nakokaki kondima mobulu ata na koyoka eeh,
mmmmh, mmmmh, nakokaki kondima ovanda naye ata pamba eeh,

ba response nini yo ooh ozueli ngai boye,
motema nini yo ooh okangeli ngai boye Ida aah, x2

(Lamenting)
Ah Ida des pus ngai nakoma awa na mikili nazali kotindela yo mikanda,
mokanda moko ozongiselaki ngai, ezalaki na sanza ya february,
Ida nasi nakomeli yo soki mbala mitano,
ozali kozongisela ngai reasurence response te,
likambo nini Ida, nazali koyoka,
bazali kokomela ngai na bato,
meme baninga nayo ya motema,
me nalobi lokola nalapaki que nalingi yo,
nakofanda bobele nayo Ida,

ba response nini yo ooh ozueli ngai boye,
motema nini yo ooh okangeli ngai boye Ida aah, x2

Nakokaki kondima mobulu ata na koyoka eeh,
mmmmh, nakokaki kondima ofanda naye ata pamba eeh,

(Lamenting)
Ida vraiment nayebi que,
kobota ya ngai nayo ezalaki kaka pamba te,
nakangaki lopango te,
mokolo ba fami nayo ba zelaki ngai,
toyaki te pamba te,
noko oyo abotama na mama na ngai azalaka na voyage,
oyebi epai nabiso noko azali tres important na makambo ya libala,
tango azalaki te moyen toya mpe ezalaki te.

Mpe oyebaki malamu que,
basi batindelaki ngai ticket na ngai ya bus,
moyen nazela ezalaki te,
nayebisaki yo tika nakende,
nabongisa esika na poto,
nakomi na poto nabongisi esika,
Ida, nakati ya Brussel nabandi kobeta libanga,
nabeti libanga na kotindela yo bilamba ba bruse, ba sapato,
Ida me kofanda nafandi na Brussel,
yo moko oyebi mbila moyen nafanda mingi ezalaki te,
com nazalaki lisusu na mikanda te.

Naluki moyen nakende Paris,
moyen mpe naleka na nzela ya malamu ezalaki te,
nakei na nzela ya mayuya,
nakomi na paris, nabeti libanga,
nabeti libanga nazali kotindela yo biloko,
Ida na paris mpe com lokumu yango esi ebebi.

Nakamati nzela nakei na Geneve,
kokoma na Geneve eloko nini nasali te Ida,
mpo ko sima na ngai nayoka que okomi na mobali mosusu,
okei kobota na mobali mosusu Ida,
alor que tango tozali tokitambola nayo nzela moko okomelanga oloba cherry,
mokolo ngai nako bota,
mwana ya liboso nakobota il faut azala mwana mwasi,
sikoyo nayoki que, okei obota na mobali mosusu,
pasi nini esali ngai na motema te Ida, Aaah

Kuna oboteli ye mwana muasi ye eeh,
mwana tozalaki koluka tobota ngai na yo eeeh,
mwana tozalaki koluka tobota eeh Ida aaah x2

Franco
Oooi Ida vraiment likambo osali ngai,
nayebi que ezali obe le mokili,
mokolo mosusu ata muana oyo oboti ya muasi,
akofuta yango epai mosusu,
ngai nazali na motema tranquil mpo nayebi que nakosa yo te,
napesa yo ebele promise me promise yango nakotindela yo mikanda,
ozali kozongisela ngai response te,
lokola nayoki osi oboti na mobali mosusu,
sikoyo nde epesi ngai nguya ngai pe nabanda
koluka kitoko oyo ya yo epai ya muasi mosusu,
Ida likambo te, aaah Lowae lelela nga papa

Trumpets & Saxaphones

Ida okangeli ngai motema eeh,
Ida oboyi kokomela ngai natanga eeh,
Ida otindeli ngai souci na moto oooh Ida eeeh,

Ebongaki ozela decision nangai moke Ida eeh,
mmmh! mmmh! Ebongaki okoma otindela ngai natanga eeh,

kuna oboteli ye mwana mwasi eeh,
mwana tozalaki koluka tobota ngai nayo eeeh,
mwana tozalaki koluka tobota eeh Ida aaah...
song info:
Verified yes
Language
Genre
Rank
Duration00:11:38
Charts
Copyright ©
Writer
Lyrics licensed byLyricFind
AddedJune 8th, 2012
Last updatedMarch 6th, 2022
About

Album Details

Video

Songs you may also like

T.p. O.k. Jazz
Similar genre
Popular on LetsSingIt
New on LetsSingIt
show all T.p. O.k. Jazz songs
show more songs with similar genre
show this week's top 1000 most popular songs
show all recently added songs

Contributors

leaderboard
activity

Comments (0)